Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pascal Lissouba awei na mibu 88 na France


Pascal Lissouba, former Congo Republic President
Pascal Lissouba, former Congo Republic President

Pascal Lissouba, tata mokonzi ya Congo-Brazzaville wuto le 1992 kino 1997, akufi na France na mibu tuku mwambe na mwambe. Awei na Perpignan, mboka moko na sud ya France.

Sango yango epesami na libota lya ye, na mbulamatari ya Congo-Brazzaville lokola mpe na bayi UPADS (Unoion panafricaine pour la démocratie sociale) lingombe na ye.

Mwana wa ye Jérémie Lissouba oyo azali mpe mokeli mibeko na Congo-Brazzaville andimi mpe yango.

"Na motema mpasi, nazali kosakola liwa lelo lundi 24 août 2020 lya tata wa ngai, professeur Pascal Lissouba, mokonzi ya kala ya mboka, na ndako ya ye," ekomi mwana na ye na Facebook.

Pascal Lissouba azalaki molokisi to professeur na Université ya Paris.

"Na wuti kopesa losako na homme d’Etat oyo, mokonzi ya kala ya mboka, na eyano napesi na DRTV mpe Télé Congo. Mabanzo na libota lya ye mpe na lisanga na ye lya politiki, ekomi na Twitter molebeli ya mbulamatari," Thierry Moungalla.

"Président Lissouba awei lelo na bokono, elobi molobeli mpe mokeli ya UPADS," Honoré Sayi.

XS
SM
MD
LG