M. Lutundula abengisaki mercredi na bureau na ye ntomba ya Inde na Kinshasa mpo etali liwa ya étudiant ya RDC akufaki nsima na bokangami mposo moleki na Bangalore, na sud ya Inde.
"Boluka te kosala mabe na ba Indiens baye bavandaka na RDC. Tozalaka na bango awa, totambolaka na bango mpe toliaka na bango ezalaka na Kinshasa, na Lubumbashi to bisika misusu. Ezali malamu te kosala bango mabe," elobaki M. Lutundula.
M. Lutundula alobi ete chargé ya mission ya ambassade ya RDC elobi ete Joel Malu Shindani abundaki nde na policiers mpe azalaki na moninga mosusu oyo akimaki.
Ntoma ya Inde alimbolaki na M. Lutundula ete étudiant congolais yango, Joel Malu shindani akufaki nsima na lopitalo nsima na koyoka mpasi na bokangami na ye na police.
Etudiant Joel Malu akangamaki o;mokolo mwa mposo na lopipi to drogue epekisama na nkombo Ecstasy.
Ntoma ya Inde alobi ete étudiant Joel Malu akweyaki na motambo ya police.
"Batelemeka l’Etat te… Ndenge moko mpe, tosengi na bayi RDC bazali na Inde kotosa mibekomya mya kuna," elobi M. Lutundula.
Ntoma ya Inde alobi ete bolukiluki bozali kosalama mpo na koyeba na bozindo nini mpenza elekaki.
Minganga basalaki autopsie na nzoto ya Joel Malu mercredi mpe bakopesa rapport na bango kasi mbulamatari ya Inde ekolandela babomi mpe ekozwa mokumba ya liwa ya Joel Malu, elimboli M. Lutundula.
Na Kinshasa mpa na Lubumbashi, police epzanaki mercredi bavandi baike baye basilikaki mpe bamekaki kopunza magazini ya ba Indiens.
Lundi, bilenge baike ba Afrika basalaki eyoma na Inde nsima na kozwa sango ya liwa lya Joe Malu kasi police ebetaki bayike mpe basusu bazokaki.
Joe L Malu azalaki na mibu 27, azwaka diplôme ya licence ya management mpe azalaki kotanga informatique.
Ezali mbala ya liboso te ete RDC to Afrika bakufa na monyokoli to kobetama na Inde.
Mibu miike mileki elenge mwasi moko akatamaka mike mike na mobali na ye oyo awutaki kobala ye na Kinshasa mpe amemaki ye na Inde mboka na ye.