Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CAN 2021/Elim. : Ba Léopards balongwe nsima na kobetetama 0-3 na ba Panthères ya Gabon


Pierre Emeric Aubameyang (G) na Bruno Ecuele Manga, basani babale ba Gabon, bapesani mbote na match na Sudan na CAN, na Franceville, Gabon, 12 janvier 2021.
Pierre Emeric Aubameyang (G) na Bruno Ecuele Manga, basani babale ba Gabon, bapesani mbote na match na Sudan na CAN, na Franceville, Gabon, 12 janvier 2021.

Ba Léopards ya RDC balongwe na éliminatoires ya CAN 2021 nsima na kokweyisama 0-3 liboso lya ba Panthères ba Gabon na Libreville.

Bayi Gabon bamonisaki makasi koleka.

Batiaki mingete na 44’ na Aaron Boupendza (0-1), na 72’ na Denis Boupenza (0-2) mpe na 83’ (0-3) na Pierre Emerick Aubameyang.

Na elonga na bango ba Gabonais bakomi na molongo mwa yambo na bilembo 10, mpe basi baleki mpo na kobeta phase finale.

Ba Léopards balongwe mpe mpo Gambie, na ngambo na yango, elongi Angola 1-0 mpe ekomi na molongo ya mibale na bilembo 10 mpe lokola. Kasi goal average ya Gabon ezali +4, Gambie ezali na +3.

Ba Léopards bazali na bilembo 6 mpe na molongo ya misato. Ata ba Congolais bolpongi match na bango ya suka lundi na Gambie bakokoma na bilembo kaka 9 mpe bakokokana te na bikolo mibale bya yambo ya groupe na bango.

Ekozala mbala ya yambo RDC ezanga na phase finale ya CAN wuto 2013.

CAN 2021 ekobetama na janvier 2022 na Cameroun.

XS
SM
MD
LG