Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Boloko ya libela bokatelami na mokambi ya batomboki Raïa Mutomboki (Mihonya) na Kabare (Sud-Kivu)


Baponi bazali kozela kopona na territoire ya Kabarem Sud-Kivu, RDC, 30 décembre 2018.
Baponi bazali kozela kopona na territoire ya Kabarem Sud-Kivu, RDC, 30 décembre 2018.

Cour militaire ya Bukavu ekateli mokolo mwa mibale etumbu ya boloko ya libela na Chance Mihonya, mokambi ya lingomba lya batomboki Raïa Mutomboki, mpo na mbeba ya bomoto mpe ya bitumba.

Chance Mihonya, na mibu 43, afundamaka na llingomba lya ye Raïa Mutomboki, na kozwa basi na makasi mpe kotia bato bohumbu nsima na ye kokima molongo ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique mpe komipesa mpete ya colonel nzoka azalaki nde lieutenant.

Mbeba afundamaka na yango esalamaka kati na 2019 na 2020 na Kabare na Parc Kahuzi Biega na Sud-Kivu.

Lieutenant Mihonya akimaki molongo ya ba FARDC na 2017 mpe akomaki kokamba ba Raïa Mutomboki.

Afundamaki na batomboki baye na kokota na mboka nzike na territoire ya Kabare mpe kozwa basi mpe bato na makasi, kotumba mboka mingi mpe komema biloko bya bato.

XS
SM
MD
LG