Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Boloko ya libela bosengami mpo na mokambiya ya Raïa Mutomboki Koko-di-Koko


Basoda na bosambisami na tribunal militaire na Goma, Nord-Kivu, 17 novembre 2008.
Basoda na bosambisami na tribunal militaire na Goma, Nord-Kivu, 17 novembre 2008.

Misala ya bosembo ya mampinga misengi boloko ya libela mpo na mokambi ya batomboki Raïa Mutomboki, Fréderic Masudi Alimasi oyo abengami na nkombo ya Koko-di-Koko mpo na kozwa basi mpe bilenge ebele na makasi na 2018 na monyele ya RDC.

Na bosambisami na tribunal ya garnison ya Bukavu (Sud-Kivu), ministère public esengi etumbu eye mpo na Koko-di-Koko elongo na baninga baye Mwilo Katindi na Rapahael Sambamba Makese mpo na crime contre l’humanité.

Ministère esengi mpe botikami ya bato babale Mukulukilwa Mubake Justin na Shabani Muganza Nonda mpo na bozangi bilembo yam aye bofundami na yango.

Bosambisami na bango bobandaki na kati sanza ya libwa nsima na bokangami na bango na sanza ya minei na Shabunda, na Sud-Kivu.

Bafundami mpe lisusu na koboma, kokanga bato na bowumbo mpe kolimwisa basusu.

Ministère public esengi misolo mingi mpo na yango. Bokati ya likambo bokosalama o’mokolo mwa minei.

XS
SM
MD
LG