Bokangami bwango bosalamaki le 4 novembre na kolanda makasi ya ndenge mingi Département d’état esalaki elongo na misala mya bokengi mpe ambassade ya Amerika na Kinshasa, mpe na mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique na ntina ya kopekisa mombongo ya ba nyama mpe biloko misusu ya nature bipekisama.
Mposo moleki bayi ICCN, Institut congolais pour la conservation ya nature, bayi Police ya RDC, Interpol mpe mamapinga ma RDC bakangaki na ndako moko na Kinshasa koleka 900 kilogrammes ya pembe ya nzoku, pene na 35 kilo ya ba écailles ya pangolin ya motuya pene na million misato na ndambo ya ba dollars.
Nzoku, pangolin na rinhocéros bazali banyama bazali kokende na kolimwa na mokili.
Yango nde mokili ebatelaka bango mpe epekisaka koboma bango mpe kosala mombongo ya bitemi ya nzoto na yango.