Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato basato bakufi mpe 33 bazoki na ba bombes mibale ba ADF bafundami na Kampala


Bato bazali koluka koboma moto nsima na explosion pene na parlement na Kampala, Ouganda, 16 novembre 2021
Bato bazali koluka koboma moto nsima na explosion pene na parlement na Kampala, Ouganda, 16 novembre 2021

Koleka bato basato bakufi mpe 33 bazoki na bombes mibale ba ADF (lingomba lya batomboki basalaka mingi na RDC) bafundami kosala na Kampala, engumba mokonzi ya Uganda.   

Ba bombes yango ebetaki pene na poste ya police mpe bakonzi ba Uganda balobi ezali bayi ADF bazali na mboka na bango nde basalaki yango.

Ba ADF bango moko nanu bandimi ekela yango te. Lingomba lya ba ADF liwuta nde Uganda.

Likelema na ba bamusulmane mpe likota na lngomba Etat islamique liye lisalaka bitumba mpo na kotia bokonzi ya makasi ya ba musulmane.

XS
SM
MD
LG