Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bavandi bakimi bitumba ya basimba minduki na ba FARDC na Rutshuru (Nord-Kivu)


Moko na basimba minduki na pene na motuka ya ONU na Ruthusuru, Nord-Kivu, 3 novembre 2008.
Moko na basimba minduki na pene na motuka ya ONU na Ruthusuru, Nord-Kivu, 3 novembre 2008.

Bavandi ya mboka Chanzu mpe Runyonyi na territoire ya Rutshuru na Nord-Kivu bakimi bitumba bingalaki wuto butu boleki kati na basimba minduki bayebani te na mampinga ma RDC, elobi bayi société civile.

Basimba minduki bayebani te basalaki bitumba na bisika mampinga mazalaka na mboka Chanzu mpe Runyonyi na territoire ya Rutshuru na Nord-Kivu, eyebisi wuto Bruxelles (Belgique) molebeli ya mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique Patrick Muyaya,

Bitumba byango bisalami pene na ndelo na Ouganda. Bavandi bakimi na Bunagana.

Bakonzi ya basoda bazali na likita lya bokengi.

Lingomba lyoko te ya babundi lindimi bitumba lyango kasi bayi société civili bakundoli ete basimba mindui ya ba M23 baye bazelaka kokitisa minduki nde bazalaka kuna.

Ba ebandeli sangza, mampinga ma Rwanda bakotaki mpe na Nord-Kivu mposo moleki, lingomba lyoko lya sika, CPCA-A64 (Coalition des patrioites pour l'application de l'Article 64) ekotaki na Bukavu na Sud-Kivu

XS
SM
MD
LG