Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ne Mwanda Nsemi abimisami na boloko


Ne Mwanda Nsemi, mokambi ya Bundu dia Mayala, akangami, Kinshasa, le 4 mars 2017
Ne Mwanda Nsemi, mokambi ya Bundu dia Mayala, akangami, Kinshasa, le 4 mars 2017

Ne Mwanda Nsemi, mokambi ya lingomba Bundu dia Mayala, abimi na boloko nsima na bozongi na ye na ndako été ya bakangemi o'butu boleki, eyebisi bakonzi ya bosembo mpe baye ya bobateli makoki ya bomoto.

"Procureur général près de la Cour de cassation apesaki mitindo ete abima na boloko," eyebisi Me Georges Kapiamba, mokambi ya ACAJ (Association pour l’accès à la justice).

Mpo na Me Kampiamba, esengelaki na Ne Mwanda Nsemi kozonga yambo na boloko bamba te akimaki kuna mobu moleki.

"Mpe na nsima nde makambo afundamaki mpo na yango makokaki kozala "classés" na Ntoma ete atikama na ndenge ya malamu," elobi Me Kapiamba.

Mokambi ya ACAJ azalaki ye moko na boloko ya Makala mpo na kolandela makambo yango.

Ne Mwanda Nsemi akangamaki le 4 mars 2017. Afundamaki mpo na "outrage" to kofinga mokonzi ya mboka ya kala, Joseph Kabila. Mobu moleki, balandi baye babukaki boloko mpe bamobisaki na makasi elongo na bato ya boloko bayike.

XS
SM
MD
LG