Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato basato bakufi na bokweyi ya mpepo na Kavunu


Likama lya mpepoe pene na libanda lya mpepo ya Kavunu, pene na Bukavu, Sud-Kivu, 16 juin 2021. (Twitter/Théo Kasi)
Likama lya mpepoe pene na libanda lya mpepo ya Kavunu, pene na Bukavu, Sud-Kivu, 16 juin 2021. (Twitter/Théo Kasi)

Bato basato bakufi na likama lya mpepo moko ekweyi na bomati bwa yango na libanda lya mpepo lya Kavumu,  pene na Bukavu, na Sud-Kivu.

Mokambi ya civili ya etuka ya Sud-Kivu, The Kasi alobi mpepo lyango limemaki ba pilotes babale na mosali mobembo moko mpe ezalaki kokende na Shabunda.

Biloko mingi bibeisami. Ezali cargo Let L-410 moko ya compagnie Kin Avia.

Mpepo yango ewataki na kobongisama, elobi mokambi to DG ya Kin-Avia. Erik Jacobs, na eyango apesaki AFP na nzela ya singa.

Ekweyaki minutes moke nsima na komata, na lubwaku pene na airport, na nord ya engumba Bukavu, ebakisi M. Jacobs.

Kavumu na Shabunda ezali na 160 km.

XS
SM
MD
LG