Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FARDC basikoli bato 70 bamemamaki na ba ADF na Mafifi (Ituri)


Molongo ya mituka ba ADF bazikisaki na Mafifi, na territoire ya irumu, na Ituri, RDC, 1er septembre 2021. (Twitter/ Ministère de la Communication et Médias/RDC)
Molongo ya mituka ba ADF bazikisaki na Mafifi, na territoire ya irumu, na Ituri, RDC, 1er septembre 2021. (Twitter/ Ministère de la Communication et Médias/RDC)

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) masakoli ete masikoli bato 70 bamemaki na basimba minduki ya ba ADF na mboka Mafifi, na Ituri, elobi mbulamatari mpe na FARDC.

“Mbulamatari epameli na makasi manso ekala eye, ekaboli maw ana mabota ma baye bazwi mpasi mpe ekundoli na banso molende ya ba FARDC ya kokangola baye banso batikali kati na baye bamemamaki lokola ba otages mpe kosuki bato ba yawuli baye (ba barabares) baye bazali ya kobanzana,” ekomi minist♪8re ya Communication mpe media na Twitter.

Molebeli ya mampinga nde apesi motango ya baye basikolami.

Nzoto ya bato banei ezamaki na Mafifi mpe na Ofaye nsima na ba ADF bakataki nzela na molongo ya mituka ya bayi mobongo pene na ngonga ya nzanga.

Ba ADF batumbaki mituka 16 mpe bamemaki bato pene na 80 ata molongo ya mituka myango mibatelamaki na MONUSCO mpe na ba FARDC.

Nsima na ekela yango, MONUSCO elaki kokoba kobatela milongo ya bituka na nzela eye.

Bayi lingomba Etat islamique bandimi ete bang onde basali bitumba yango sango batindi na ba réseaux sociaux.

XS
SM
MD
LG