Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Amnesty International epaleli Tshisekedi na kowangana bilaka ya kopesa bosembo na ba victimes ya bokonxi ya Kabila


Président Félix Tshsiekedi azali kokamba likita lya mbulamatari na vidéoconférence wuto Cité ya Union africiane, Kinshasa, RDC, 12 juin 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshsiekedi azali kokamba likita lya mbulamatari na vidéoconférence wuto Cité ya Union africiane, Kinshasa, RDC, 12 juin 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Amnesty International ekomi na rapport moko na nkombo ya "Sans suite" to bolandami bozali te, ete president Tshisekedi atiki na bozangi elikya nkama mingi na mabota ya baye bakufelaki bato ba bango na mobulu yambo na maponami.

Amnesty International epaleli president Félix Tshisekedi na kowangana bilaka ya kosala ete bosembo bopesama na baye bazwaki makama na monyokoli ya bokonzi ya kala.

Amnesty international ekundoli ete Félix Tshisekedi alobaki yango nkango azalaki nanu na opposition.

ONG international eye elobi na rapport moko na nkombo ya "Sans suite" to bolandami bozali te, ete president Tshisekedi atiki na bozangi elikya nkama mingi na mabota ya baye bakufelaki bato ba bango na mobulu yambo na maponami.

Kasi VOA Lingala ekundoli ete yambo na maponami mpe nsima na maponami président Félix Tshisekedi alakaki ete akotimola te to "ako fouiner te" mbeba elaka.

XS
SM
MD
LG