Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakole abeti Takam mpe Fury alongi Nganou na makona mwa zuzi


Moyi RDC Martin Bakole azali kosepela nsima na kosakolama molongi na bitumba ya ba Poids lourds ya WBC na moyi France awuta na Congo, Tony Yoka, na AccordHotels Arena, na Paris, 14 mai 2022.
Moyi RDC Martin Bakole azali kosepela nsima na kosakolama molongi na bitumba ya ba Poids lourds ya WBC na moyi France awuta na Congo, Tony Yoka, na AccordHotels Arena, na Paris, 14 mai 2022.

Mobeti bibotu Martin Bakole ya RDC oyo abundaka mpe mpo na Ecosse abeti moyi Cameroun mpe France Carlos Takam na bokati bitumba ya mobeti piololo na round ya minei na bondongwani bosalamaki mokolo mwa mposo (28 sanza ya zomi 2023) na Kingdom Arena ya Riyad, na Arabie Saudite.

Mobeti piololo akataki bitumba biye ya ba poids lourds na round ya minei, ntango M. Takam azalaki kozongisa te na mbula ya makofi engambe Bakole azalaki kobeta ye wuta koleka minute moko na nzoto mpe na moto.

M. Takam ye moko aboyaki kotika bitumba kasi asi abimaki makila na elongi.

Ezalaki bitumba ya kowelela nkamba te kasi biye bisalamaki yambo na bitumba kati elombe ya WBC Tyson Fury ya Grande-Bretagne na mobandi ya lisano lya bibotu ya ekolo Cameroun Francis Nganou oyo abundaka na masano masasu.

Na bitumba biye ya poids mpe lokola, M. Fury alongi nawa bazuzi 94-95, 96-93, 95-94 kasi akweyisamaki mbala mibale na round ya misato mpe nsima na yango.

Elonga eye, esali ete M. Fury atikala kino sika kobetama te.

Forum

XS
SM
MD
LG