Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Martin Bakole akobunda na Carlos Takam o’mokolo mwa mposo na Riyad


Mobeti bibotu Martin Bakole nsima na kobunda na Kevin Johnson na Newcastle, Grande-Bretagne, 16 sanza ya zomi 2012. Action Images Archive, Reuters Marketplace - Action Images
Mobeti bibotu Martin Bakole nsima na kobunda na Kevin Johnson na Newcastle, Grande-Bretagne, 16 sanza ya zomi 2012. Action Images Archive, Reuters Marketplace - Action Images

Martin Bakole, mobeti bibotu ya Ekolo Congo démocratique akobunda mokolo mwa mposo mokoya na moyi Cameroun mpe France Carlos Takam na Riyad na Arabie Saoudite mpo na ba poids lourds.

Bakobunda mpo na kowelela nkama moko te.

Kasi ekozala nde na nzela bitumba bisusu bikozala kati na Tyson Fury ya Grande-Bretagne na Francis Nganou, mobundi mosusu ya Cameroun mpe France.

Bitumba bya Bakole na Takam bikozala kati na baye balongaki mobundi mosusu ya RDC mpe France,Tony Yoka ba sanza eleki.

Tyson Fury alengelaki bitumba bya ye na Frnacis Nganou na Bakole (“sparring partner”) mpe Nganou azalaki nde na Takam.

Forum

XS
SM
MD
LG