Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Martin Bakole abeti Shevadzutskyi "The Hulk" na K.O na round ya misato


Mobeti bibotu ya Ekolo Congo démocratique Martin Bakole atomboli maboko nsima na elonga na bitumba na AccordJotels Arena, na Paris, France, 14 mai 2022
Mobeti bibotu ya Ekolo Congo démocratique Martin Bakole atomboli maboko nsima na elonga na bitumba na AccordJotels Arena, na Paris, France, 14 mai 2022

Moyi Ekolo Congo démocratique Martin Bakole oyo abundaka mpe mpo na Ecosse abeti moyi ekolo Ukraine Ihor Shevadzutskyi "The Hulk" makalekale to K.O. na round ya misato ya bitumba ya ba poids lourds bisalami na Pologne o'mokolo mwa mposo..

The Boxxer, Fédération ya makofi to bibotu ya Grande-Bretagne nde ezalaki nsima na bitumba byango..

Ezali elonga ya motuya mpo na Martin BAkole nsima na ye kobeta moyi Ekolo Congo démocratique Tony Yoka oyo abundaka mpo na France mobu moleki.

Yango ekomema Martin Bakole kolongwa na molongo ya zomi mpe kokende liboso.

"Nakokomaka elombe ya molongo ya bibotu ata ndele, ata lelo to lobi te." elobaki mikolo mileki Martin BAkole oyo azali leki ya elombe mosusu ya bibotu Junior Makabu Ilunga.

XS
SM
MD
LG