Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden asengi $ milliards 105 mpo na Israël na Ukraine


PRésident Joe Biden ya eklo Amerika azali kosala lisikulu mpo bitumba na Israel na Ukraine, Washington D.C., 19 sanza ya zomi 2023.
PRésident Joe Biden ya eklo Amerika azali kosala lisikulu mpo bitumba na Israel na Ukraine, Washington D.C., 19 sanza ya zomi 2023.

Joe Biden mokonzi ya ekolo Amerika azali kosanga dollars milliars nkama moko na mitano mpo na kosunga Isreal mpe Ukraine na bitumba bikolo mibale biye bizali na yango na mboka na bango.

Na lisikulu asalaki lobi na etando eke, mokonzi ya Amerika asengi ngambo inso ya bana ba Amerika kopesa eyano na bosenga bwa ye mpo na bozali bwa Amerika mibu mpe mikolo mikoya.

Abwaki mbela yango ntango Suku y anse ya Parlement ya Amerika, Suku ya bakeli mibeko, etelemi na misala mya yango mpo bakeli mibeko bazali kaka te kokoka kopona motambwisi mwa bango nsima na bobokolami ya moyi republicain Kevin McCarthy na bayi lingomba lya ye.

Ba republicain bazali kondongwana bango na bango kasi bakweyisaki McCarthy na kofundaye kotika mbulamari ya Amerika kozwa nyongo mingi kolke milliards nkama misato mpe kokoba kopesa misolo mingi na Ukraine na bitumba na Russie.

Na lisikulu lya ye, Joe Biden alobaki été Hamas na Putin bazali makanma makesi kasi bakaboli eloko moko elongo : balingi bango banso babale kosukisa democratie na bikolo nzinga nzinga.

Akundoli mpe été lisitwale liyekolisa biso été bandongolomiso bafutala te motuya ya misala mya bango ya mabe, ntango bakonzi ya kanza to distacteurs bafutaka te motuya ya botolei mboka ya bapaya, bamema mobulu makasi, bawei mpe bobisi biloko.

Forum

XS
SM
MD
LG