Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gaza : Bato koleka 200 bakufi na lopitalo, na bombe Israël  efundami kobeta


Bayi Palestine bakufi na bombe na lopitalo Ahli Arab na Gaza, 17 sanza ya zomi 2023. (AP Photo/Abed Khaled)
Bayi Palestine bakufi na bombe na lopitalo Ahli Arab na Gaza, 17 sanza ya zomi 2023. (AP Photo/Abed Khaled)

Koleka bato 200 na bombe moko ekwayi na lopitalo lonene ya Gaza, eye Hamas efundi Israël kobeta.

Yango ememi nkanda na bikolo mingi mokolo moko yambo na mobembo mokonzi ya ekolo Amerika Joe Biden akani kosala na Israël nsima na bitumba biye Hamas ebandaki o’mokolo mwa sambo mwa ya zomi ya 2023.

“Kati na bato 200 na 300 bakufi na bombe eye esimbaki lopango ya lopitalo Ahli Arab mpe bato ming ibazali kino sika na nse ya ndako eye ebukani,” elobi liyebisi lya ministère ya Bokolongono ya etando ya Palestine eye ezali na nse ya bokonzi ya Hamas.

Israël na ngambo na yango epameli nde Hamas eye ezali lingomba lisalaka Jihad to bitumba "bisanto" lokola elobaka yango moko.

“Kolanda nsango ya misala mya bokengi, na eye ewuti bisika mingi, Jihad islamique nde ezali na mokumba ya bobeti roquette eye etutaki lopitalo,” elobi mampinga ma Israël.

Mabongisi ma molongo lokola Conseil européen na OMS mapameli likambo liye.

Koleka bato 3.000 basi bakufi bitumba biye, mingi kati na bango bazalaki bacivili.

Forum

XS
SM
MD
LG