Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mazembe ekozala lobi na nzela mpo na nkanda nsima na CAF kotinda match na yango na Espérance ya Tunis na Tanzanie


Moïse Katumbi na balandi ba ye ntango bayi pulusu ba babwakeli bango molinga mwa pilipili na Lubumbashi, Haut-Katanga, 13 sanza ya mitano 2016.
Moïse Katumbi na balandi ba ye ntango bayi pulusu ba babwakeli bango molinga mwa pilipili na Lubumbashi, Haut-Katanga, 13 sanza ya mitano 2016.

Bakambi, basani mpe balandi ba TP Mazembe bakozala na balabala o'mokolo mwa mosala mwa mibale, mokolo mwa zomi na sambo ya sanza ya zomi ya 2023, mpo na kotalisa nkanda na bango nsima na CAF kotinda na Dar-es-Salam, na Tanzanie, match na bango basengelaki kobeta na Espérance ya Tunis o'mokolo mwa mposo (21 ya sanza ya zomi 2023) na Lubumbashi, na Haut-Katanga mpo na super Ligue ya Afrika.

Bayi Mazembe bazali kopamela mbulamatari ya RDC kotia ebaka to epekiselo liboso lya ekipi eye ya Lubumbashi.

Balengeli kotambola na nkanda nsima na CAF (Confédération ya Afrika mpo na lisano lya ndembo /Motopi) kobimisa mokano mwa yango.

"Bisaleli bya CAF, kati na yango VAR, bikangmi na douane na Lubumbashi mpe ba visa ya ba commissaires mpe ya babengisami ba lokumu ba CAF bibimisa nanu te kino sika... Na bizaleli bya yango, mbulamatari epekisi ekipi moko kaka ya RD Congo eye ezwami kati bingambe bya lisano lya motopi kokota na momekano mpe etie yango na likama ya kolongolama na nsoni nyonso," ekomi TP Mazembe na site internet na yango.

Nsango yango endimami mpe na ekipi ya Espérance ya Tunis.

"Mbongwana ya mokolo mpe esika mpo na match na TP Mazembe esengalaki kobetama mokolo mwa mposo na Lubumbashi. Tokoki kobeta mokolo mwa eyenga na Da es Salaam kolanda mokano mwa suka mwa CAF," ekomi Espérance ya Tunis na ba réseaux sociaux na yango.

TP MAzembe epameli mbualamatari ya RDC kosangisa masano na politiki,

"Esengeli Mbulamatari) eyeba ete ezali Moïse Katumbi nde epesi etumbu kasi bilenge ba Congo baye minzoto na bango mosengeli kongenga likolo lya lisano lya ndembo na mokili. Koluka, na ntina eteli masano te, kopekisa basani ba ndembo ba RDC kolakisa na mokili mobimba talenta na bango, ezali kaka motema mabe ya maksai koleka," ekomi TP. Mazembe nsite internet na yango.

Forum

XS
SM
MD
LG