Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fécofa endimi ba Léopards babeta match ya ba éliminatoires ya CAN na stade Mazembe


Basani ya Léopards ya RDC basepeli nsima na elonga na bango 4-0 liboso na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.
Basani ya Léopards ya RDC basepeli nsima na elonga na bango 4-0 liboso na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.

Ba Léopards ya Ekolo Congo démocratique bakobeta match na bango ya misato ya ba éliminatoires ya Coupe ya Afrika ya bikolo na stade ya Mazembe na Lubumbashi.

Basani ba Ekolo Congo démocratique bakobeta bongo na ba Maraboutines ya Mauritanie o’mokolo ma ntuku mibale na minei ya sanza ya misato ya 2023.

Kalaka mokonzi ya FECOFA, Federation congolaise ya Football association atindi mokano moye na CAF, Confederation africaine ya lisano lya ndembo.

Mikolo mileki kalaka makonzi molandi ya FECOFA asakolaki ete Ba Leopards basengelaki kobeta na libanda lya masano Japona ya Cameroun nsima na CAF koboya kondima libanda lya masano ma Ba Martyrs na Kinshasa mpe ya Kibassa Maliba na Lubumbashi.

DCMP, V.Club lokola mpe Lupopo baboyaki mpe kobeta na stade Mazembe kasi likambo lyango limemaki nungu nungu mpo baike bakanisaki été boboyi boye bozali nde ya bolitiki.

XS
SM
MD
LG