Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ibenge na Berkane balongoli Mazembe na ½ finale ya CAF C2 na 4-2


Coach Jean Florent Ibenge na match ya Léopards ya RDC na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.
Coach Jean Florent Ibenge na match ya Léopards ya RDC na Zimbabwe na Caire, Egypte, 30 juin 2019.

Jean Florent Ibenge na Renaissance Berkane ya Maroc balongoli TP Mazembe ya Ekolo Congo démocratique demi-finale ya Coupe ya confédération ya CAF na kololongaka 4-1 lobi dimanche na stade municipale ya Berkane, na Maroc.

Elonga ya TP Mazembe 1-0 mposo moko yambo na match aller na stade Kamalondo na Lumbashi, na Haut-Katanga, RDC, ekokaki te mpo mpo ba Corbeaux ya RDC baleka.

Bilembo binso ya aller na retour bipesi bongo mingete minei mpo na RS Berkane mpe moko mpo na TP Mazembe.

Match retour ekozala pete te, Mazembe elongi biso na Lbumbashi kasi biso tokoluka mpe tolonga epayi na biso na Berkane, ekebisaki coach ya RS Berkane, moyi RDC, Jean-Florent Ibenge na interview exlcuisve apesaki VOa Lingala nsima na match aller le 8 mai na engumba mokonzi ya Haut-Katanga.

Na match ya lobi dimanche 15 mai 2022, Berkane ezalaki yambo na kofungola mingete na 10’ na El Helali B. kasi TP Mazembe ezongisaki na 11’ na Kizimbi P.

Na mi-temps ya mibale nde, RS Berkane emonisaki makasi. TP Mazembe ekomaki kolakisa kobanga mpe kolekisa ntango.

Larbi N. atiaki mongete ya mibale ya Berkane na 79’ mpe El Fahli abakisi na penalty mongete ya misato. El Fahli Y. azongaki lissusu na mngete ya minei ya Berkane.

Mwape T. ya Mazembe abimisamaki na 64 mpo kozwa cartons jaunes mibale (Rouge).

XS
SM
MD
LG