Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Union africaine etelemisi Gabon na misala mya yango mpo na coup d’état


Ali Bongo Ondimba mokonzi akweyisami na basoda, azalaki na likita lya Union africaine na Gigiri, Nairobi, Kenya, 16 sanza ya sambo 2023.
Ali Bongo Ondimba mokonzi akweyisami na basoda, azalaki na likita lya Union africaine na Gigiri, Nairobi, Kenya, 16 sanza ya sambo 2023.

Union africaine etelemisi ekolo Gabon na misala mya yango nsima na coup d'état basoda bsali, kolanda mokano Likita lya Kimya mpe Bokengi lya UA lisakoli mokolo mwa minei, 31 ya sanza ya nwambe ya 2023.

Likita lya Kimya mpe Bokengi lya UA epameli makasi mpenza bozwi bokonzi na makasi na bayi mampinga na ekolo Gabon baye balongolaki mokonzi Ali Bongo Ondimba o’mokolo mwa 30 ya sanza ya mwambe ya 2023, » elobi misala miye mya UA.

Likita lyango lisanganaki mpo na kalandela makambo mazali koleka na Gabon.

O’mokolo mwa misato, miokambi ya Commission ya Union africaine, Moussa Faki Mahamat, asengaki na mampinga ma Gabon mpe bayi bokengi ba ekolo eye kosala ete likambo lya mabe likomela te Ali Bongo Ondimba oyo bakweyisi na bokonzi.

Basoda babatelaka mokonzi ya mboka batiyaki na bokambi transition general Brice Oligui Nguema oyo asengeli kolapa ndayi mpe kovandisama na bokonzi o’mokolo mwa yambo ya mposo mokoya.

Basakolaki ete o’mokolo mwa ma misato ete balongoka Ali Bongo Ondimba nsima na misala mya maponami kosakola elonga na ye na maponami ma mokonzi ya mboka ma mokolo mwa mposo moleki na pene 62%.

Basoda baye balobaki bilembo biye bizali bya mabe mpe balongoli yango mpe bakweyisi mbulamatari.

Forum

XS
SM
MD
LG