Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mukwege apameli Tshisekedi kotia batomboki kati na mbulamatari


Nobel Peace Prize laureate Dr. Denis Mukwege, gynecological surgeon, a talks with VOA in this screengrab from a May 18, 2022, interview.
Nobel Peace Prize laureate Dr. Denis Mukwege, gynecological surgeon, a talks with VOA in this screengrab from a May 18, 2022, interview.

Dr Denis Mukwege mbano ya Nobel ya kimya na 2018 apameli mokonzi ya Ekolo Congo democratique Felix Tshisekedi kopesa bibonga mibale na bakambi babale ya batomboki bo’ Ministre mpe Vice-Ministre ministre na mbongwana ya mbulamatari tata mokonzi ya RDC asalaki na sanza ya misato eleki.

Dr Mukwege akondoli ete president Felix Tshisekedi apesaki mpe, mibu mibale yambo na yango, bokambi PNDDRCD Programme national de demobilization, désarmement, Relevement communautaire et stabilisation na Emmanuel Tommy Tambwe.

Dr. Mukwege akundoli ete Tommy Tambwe azalaki moko na bayi lingomba lya batomboki ba kala RCD liye likoma lingomba lya politiki mpe, oyo azalaki mokambi ya ALEC Alliance de Liberation de l’Est du Congo eye ezali pene na batomboki ba M23 na ekolo Rwanda. Mpo na Denis Mukwege, yango ezali mbeba to libunga.

Forum

XS
SM
MD
LG