Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katumbi, Matata na Sesanga basengi bolongwi ya bazuzi babale ya Cour constitutionnelle mpo na likambo lya liwa lya Okende


Bakambi ba mangomba maike ma opposition, (G-D) Martin Fayulu, Delly Sesanga, Augustin Matata Ponyo na Moïse Katumbi na bokutani na panza nsango na Kinshasa, RDC, 16 sanza ya motoba 2023. (Facebook/Wangu info)
Bakambi ba mangomba maike ma opposition, (G-D) Martin Fayulu, Delly Sesanga, Augustin Matata Ponyo na Moïse Katumbi na bokutani na panza nsango na Kinshasa, RDC, 16 sanza ya motoba 2023. (Facebook/Wangu info)

Bakambi basato ba opposition basengi bolongwi ya bazuzi babale ya Cour constitutionnelle na lingambo lya liwa Cherubin Okende.

Matata Ponyo, Moise Katumbi na Delly Sesanga bapameli zuzi Dieudonné Kamuleta na Sylvain Lumu mbeba mingi na makoki ma mosala mwa bango maye masengi bango kokanga monoko mpe ndenge babengisaki Chérubin Okende yambo na bobomami bwa ye.

« Na likambo litali mokeli mibeko Chérubin (Okende), bosengeli komitika na maboko ma misala mya sembo mpo na kopesa pole na esika ete bolobaka lobaka na bapanzi nsango… Likolo na mbeba na bino ya kotambola likolo lya lotomo bozali na yango ya kokanga monoko mpe ya komipekisa mpe bokaniseli bino na lolenge bobengisaki (Cherubin Okende) mpe ya bomemami (bwa ye), likambo litikali lizali kaka botiki mosala na bino na Cour,» ekomi bakambi baye basato ya opposition ya Ekolo Congo démocratique.

Chérubin Okende akutamaki akufa, vendredi 14 juillet 2023 na bala Poids Lourds (Kinshasa), kati na motuka mwa ye mpe nzoto mwa ye ebetama masasi mingi na ntongo ya mokolo molandaki bolimwi bwa ye nsima na kozala na parking ya Cour constitutionnelle epayi abengisamaki kotika mokanda motali bozwi bwa ye.

Forum

XS
SM
MD
LG