Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Libota lya Chérubin Okende lipameli bazuzi kosala "autopsie" na bozangi ya "experts indépendants"


Mokeli mibeko mpe molobeli ya Ensemble pour la démocratie na botambolai na Kinshasa, 2023
Mokeli mibeko mpe molobeli ya Ensemble pour la démocratie na botambolai na Kinshasa, 2023

Libota lya nkondo Chérubin Okende lipameli lolenge bakambi ba misala mya sembo milobi lipaso to atuopsie lya nzoto lya mowei lisilisalami,na lombango.

Moko na basambeli ba libota liye asakoli ete lelo, Parquet etindeli bango mokanda kopesa bango nsango ete lipaso lya nzoto lya mowei mosalami.

Mpo na mosambeli ya libota lya Cherubin Okende lipaso liye lilingaki kozala malamu soki lisalamaki na misano mya banganga ya boyebi to ba experts ya Monusco na minganga ba mibeko bya bonsomi, mpo na bolamu ya baye bazali kolobaka ete likambo lya kobomba lizali te.

Libota liye likondoli ete mbulamatari ya Ekolo Congo elalaki bolukiluki bwa bonsomi ba banganga ya boyebi ba libanda.

Mokeli mibeko Cherubin Okende, molobeli ya lingomba Ensemble pour la république ya opposant Moise Katumbi, ministre ya kala ya Transports na bokonzi ya Felix Tshisekedi, akutamaka akufa na ntongo ya mokolo mwa zomi na minei kati na motuka wa ye na nzela ya Poids Lourds, na Kinshasa, mpe zonto wa ye ebetama masasasi mingi. Procureur ya Tribunal ya grande instance ya Kinshasa/Gombe alobaki mikolo mileki ete lisasi libomaki Cherubin Okende liwutaki na monduki mozalaki na motuka wa ye.

Mobateli wa ye, mokumbi motuka wa ye mpe bato basusu basimbami mpo na bolukiluki.

Mokumbi Mabateli wa ye andimaki ete atikaki monduki wa ye na motuka ntango Cherubin Okenede atikalaki kati na motuka na Parking ya Constitutionnelle mpe atindaki ye kotika mokanda na bazuzi yambo ete amonana lisusu te mpe akutama akufa mokolo molandi.

Forum

XS
SM
MD
LG