Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi abengi ba Musulmans na bomoko


Président Félix Tshisekedi (C) na milulu mya Eid el-Kebir na mosquée Rassoul, Kinshasa, 28 sanza ya motoba 2023. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (C) na milulu mya Eid el-Kebir na mosquée Rassoul, Kinshasa, 28 sanza ya motoba 2023. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix-Antoine Tshisekedi ya RDC asengi na ba musulmans ya ekolo na ye kozala na bomoko , mpe abakisi ete, akomipesa mpo na kosunga bango koluka bomoko o lingomba lya bango.

Mokonzi ya RDC alobaki yango o'mokolo mwa misato (03 ya sanza ya motoba 2023) na milulu mya ba musulmans mibengami Tabaski to mpe (Eid el-Kebir) miye misalemaki na engumba Kinshasa liboso lya mangomba manso ya ba musulmans ya Ekolo Congo démocratique.

Felix Tshisekekdi abwakaki mpe mbela na kosenga ba maman ya ba musulmans na kokota na politiki mpe kopesa nkombo na bango mpo na maponami mazali koya.

Na RDC, mangomba mabale ya ba musulmans mawelelaka kibokonzi ya lingomba liye.

Moko na kati na bango ekambami na Cheikh Abdallah Mangala mpe mosusu na Youssef Djibondo.

Forum

XS
SM
MD
LG