Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington elaki millions mitano ya ba dollars na oyo akopesa nsango ya mokonzi ya ADF


Liyebisi lya Departement d'Etat ya kopesa dollars million mitano na moto akopesa nsango ya Seka Musa Baluku mokambi ya ADF, Isis-RDC to Daesh-RDC, 2 sanza ya misato 2023. (Département d'Etat des Etats-Unis)
Liyebisi lya Departement d'Etat ya kopesa dollars million mitano na moto akopesa nsango ya Seka Musa Baluku mokambi ya ADF, Isis-RDC to Daesh-RDC, 2 sanza ya misato 2023. (Département d'Etat des Etats-Unis)

Etast-Unis ya Amerika elaki mbano ya dollars millions mitano na moto nyonso oyo akopesa nsango eye ekopesa nzela ya komona mpe koyeba esika mokambi ya Daesh-RDC to ADF, Seka Musa Baluku azali.

Mabongisi ma mbano mpo na sembo ya department ya d’Etat ya Ekolo Amerika eye eyabani na bokuse bo’ RF nde epesi nsango eye.

Kolanda département d’Etat, Deash to Lingomba Etat islamique ya Ekolo Congo démocratique esalaki, na bokambami bwa Seka Musa Baluku, makambo to mobulu ya nsomo likolo na bana mboka mpe ya ba soda ba mampinga ma etuka eye ya Afrika na bituka ya Nord-Kivu mpe ya ituri, na monyele ya RDC.

Departement d’état ya Amerika elobi mpe lisusu ete Deash-RDC eye eyebani bo’ ADF mpe Madina na Tauheed Wau Majahedeen, kati na nokmbo misusu ezali na yango, ebomaki bacivili koleka nkma mwambe na ntuku minei na libwa kaka na mobu 2020, kolanda Conseil ya securité ya ONU.

Département d’état esi elobaki na 2021 ete Seka Musa Baluku azali dongolo meso oyo ayebani na mokili mobimba mpe Daesch-RDC to ADF nde mabongisi ma badongolomeso ya bapaya.

Botiami ya Baluku mpe ADF na molongo ya ba dongolomeso bozali kosala ete biloko binso lokola ndako ya bato balakisami mosapi boye bazali na nse ya etumbu ya misala mya sembo ya Etats-Unis ya Amerika.

XS
SM
MD
LG