Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Daesh (Etat islamique) endimi ete mokumba ya bobomi bwa bato 23 na Makugwe (Beni)


Archives - Ndako etumbami na bitumba ba ADF bafundami kosala na mboka Manzalaho, pene na Beni, RDC, 13 sanza ya mibale 2020.
Archives - Ndako etumbami na bitumba ba ADF bafundami kosala na mboka Manzalaho, pene na Beni, RDC, 13 sanza ya mibale 2020.

Lingomba Etat islamique, Daesh, endimi mokumba ya bobomi bwa bato koleka 23 butu boleki na babundi ba ADF na mboka Makugwe, na territoire ya Beni, na Nord-Kivu, kolanda liyebisi lingomba Etat islamique libimisi na Telegram été eteni na yango ya Afrika ya kati kati, babundi ba ADF nde babomi bato baye na Makugwe.

Colonel Charles Omeonga, mokambi ya territoire ya Beni epayi bobomami boye bosalakai, alobaki yambo na VOA Lingala ete bato ntuku mibale na minei (24) nde bomamaki.

Bayi sociécivile mpe bandimaki motango mwango.

"Bato 24, kati na bango basi, babomami na bokoti ya ba ADF," elobaki o'ngambo na ye mokambi ya société civile, Janvier Kasereka na VOA Lingala.

Zomi na sambo kati na bato bakufi, bazalaki nde ekala ya komela masanga, ebakisaki Janvier Kasereka.

Ba ADF bazali lingomba lya batomboki ya ba musulmane baye bawutaki yambo na Uganda kasi basangana sika na bato ba bikolo misusu.

Ba ADF bamikotisa kati na lingomba lya bandongolomeso na mokili, Etat islamique.

XS
SM
MD
LG