Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato koleka 17 bazoki na bombe ebeti na wenze ya “Ma Camapgne” na Beni


Bayi pulusu bazali kokengela esika bombe moko ebetaki na Beni, Nord-Kivu, 26 décembre 2021. (AP Photo/Al-hadji Kudra Maliro)
Bayi pulusu bazali kokengela esika bombe moko ebetaki na Beni, Nord-Kivu, 26 décembre 2021. (AP Photo/Al-hadji Kudra Maliro)

Koleka bato 17 bazoki na bombe moko ebetaki na mpokwa ya mokolo mwa misato, 25 ya sanza ya yambo ya 2023, na wenze ya “Ma Camapgne” na Beni, na Nord-Kivu, etatoli bavandi.

Bombe yango ebetaki na mpokwa mpe baye bazokaki bamemami na bisika ya kopesama lisalisi.

“Elenge mobali moko atikaki saki ya plastique moko ya langi ya mpondu na bisika ya masini ya konika fufu, mpe alakaki kozonga kozwa yango. Minutes misato nsima na yango, saki yango ebetaki mpe ezokisaki bato baike na ngai moko mpe, na ba clients baye bayaki konikisa manioko," etatoli moyangeli ya bisika ya konika fufu, Dany Siauswa.

Dany Siauswa amemamaki na lopitalo na nkombo ya Prospérité lokola mpe bato basusu bazokaki.

Kati na bango, ezali na bilenge basi basato.

Mokambi ya sociétécivile ya esika eye, Joseph Kakule alobi bato bazoki baleki 19.

Lingomba Etat islamique lindimaki mokumba ya bato zomi na mitano bakufaki na bombe ebetaki na ndako ya Nzambe moko mokolo mwa zomi na mitano moleki na Beni.

XS
SM
MD
LG