Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bana babale bakufi mpe bakolo motoba bazoki na grenade na Ndunda (Sud-Kivu)


Bayi pulusu bazali kokengela nzela epayi bana ba keleasi bazali koleka nsima na bopanzani ya grenade moko pene na Goma, Nord-Kivu, 8 novembre 2016. (AP Photo/Al-hadji Kudra Maliro)
Bayi pulusu bazali kokengela nzela epayi bana ba keleasi bazali koleka nsima na bopanzani ya grenade moko pene na Goma, Nord-Kivu, 8 novembre 2016. (AP Photo/Al-hadji Kudra Maliro)

Bana bake babale bakufi mpe bato basusu motoba bazoki nsima na grenade moko kopanzana na mboka Ndunda, na etando ya Ruzizi, na etuka ya Sud-Kivu, elobi lelo bakonzi ba esika eye.

Likama lyango lisamalamaki lobi loleki ntango bana baye bakufi mpe bakolo baye bazoki bazalaki kosala bokila ya ba ndeke na matiti.

Bana bango balokotaki grenade mpo bakanisaki ete ezali eloko ya kosakana na yango mpe grenade yango ebetaki, elimboli bayi mboka. Molobeli ya mampinga na esika eye Lieutenant

Marc Elongo alaki ete misala mya FARDC mizali kokita epayi ya likama mpo na bolukiluki.

XS
SM
MD
LG