Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato zomi bakufi sima likama lya motuka o etuka ya Sud Kivu.


DRCONGO-UNREST-CONFLICT
DRCONGO-UNREST-CONFLICT

Bato zomi bakufi na Est ya ekolo Congo démocratique lelo mokolo mwa mitano sima motuka momemaki bango kobaluka mpo na nzela ya mabe na bisika biye, esakoli bakonzi ba etuka eye.

Kolanda maloba ma Théophile Kiluwe Migo, ministre provincial ya Intérieur mpe sécurité na etuka ya Sud-Kivu, motuka moye mobaluki pene na mboka Kitongo mozalaki mpe komema biloko nzike , elongwaki na zando ya Kiziba na territoire ya Shabunda mpo na kokende na mboka Mwenga, mpe ezuaki likama na esika oyo ezali na mayi te na etuka ya Sud-Kivu.

Ezali bongo "camion Mercedes Benz eye ememaki ba Sali mibembo bayike, mpe biloko ebele nde ebalukaki na tongo makasi" vendredi na tongo na village Kitongo na Sud-Kivu, endimi na AFP Hilaire Isombya, président ya société civile oyo abakisi ete Bato baye bazwi mpasi bazali, mibali motoba mpe basi minei.

XS
SM
MD
LG