Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Soda ya Monusco abomami na ba Twirwaneho na Minembwe


DRCONGO-UN-UNREST-CEREMONY - BLUE HELMETS DRC BINTOU KEITA MONUSCO
DRCONGO-UN-UNREST-CEREMONY - BLUE HELMETS DRC BINTOU KEITA MONUSCO

Soda moko, casque bleu ya Monusco, misala mya koyikisa kimya makasi ya ONU na Ekolo Congo démocratique, abobomami na masasi ya babundi ba lingomba Twirwaneho, o'mokolo mwa mitano 30 septembre 2022, na Minembwe, Sud-Kivu, esakoli ONU.

}Babundi bamonani kozala ba Twirwaneho {baye bazali ba Banyamulenge mpe babundelaka kabila eye}. bakendaki na camp ya Monusco na Minembwe, na territoire ya Fizi, na kolobaka ete balingi bamitika na maboko ma ONU," elobi ndimbola ya bayi Monusco.

Na liyebisa lya yango, Monusco elobi te soki soda oyo akufi azalaki ya mboka nini kasi ekebisi ete kobundisa ONU ezali mbeba ya bitumba.

XS
SM
MD
LG