Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bitumba makasi bingali lelo kati na basimba minduki ba M23 na mampinga ma Fardc


DRCONGO-UNREST-CONFLICT
DRCONGO-UNREST-CONFLICT

Bitumba makasi bingali lelo kati na basimba minduki ba M23 na mampinga ma Fardc mpe mangomba misusu ma basimba minduki baye babateleka mabele, epayi wapi bato bayike bazuami mpe bamemami na makasi na bisika biyebani te na basimba minduki baye ba M23.

Kolanda bafandi bayike ba bisika biye, Bitumba biye bibandaki lobi mokolo mwa lomingo na mboka nzike ya groupememnt Bishusha mpe, bikobaki lisusu maksi lelo na ntongo esakoli bango na nzela ya singa. Kolanda bakonzi ya mapinga ma RDC bayi FARDC bazali kaka na bisika biye bazalaki liboso lya bitumba biye.

Bato koleka tuku mitano baye bafundami na kozala pene na basimba minduki ba Nyatura mpe FDLR bakangemi mpe bamemami na bisika biyebani te. Kaka basi mpe bana baye bazalaki na kati na bango nde batikami esakoli Cyprien Ngoragore, mokambi ya societe civile ya bisika biye. Kolanda baboti babale ba bisika biye, bato baye bakangemi bamemi na Rutshuru-centre eye emonani kozala base ya ba M23.

Basimba minduki baye ba M23 basakolaki o mokolo mwa mitano moleki ete batiki bisika bazuaki mikolo mileki na mboka Kibumba pene na engumba Goma, kasi mapinga ma Fardc masakolaki ete bolongwi boye bozali ya lokuta mpo na kokosa bato mpe koluka kosala bitumba bipayi bisusu.

XS
SM
MD
LG