Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kigali elobi kofunda Rwanda kosunga M23 ekopekisa kotala ntima ya matata na RDC


Président Paul Kagame ya Rwanda na likita lya bakambi US-Africa, Washington DC, Etats-Unis, 21 dembre 2022. 15 décembre 2022.
Président Paul Kagame ya Rwanda na likita lya bakambi US-Africa, Washington DC, Etats-Unis, 21 dembre 2022. 15 décembre 2022.

Kigali epameli Kinshasa na kokela kokela bobomi, bobomi boye ONU elobi bosalamaki na batomboki ba M23 mpe bato koleka nkama moko na ntuku misato moko bakufaki sanza eleki.

Liyebisi lya mbulamari lya Rwanda lilobi ete bobomi bwa Kishishe boye bobakisamaki makambo, bozali bokeli ua Kinshasa eye etie yango na mokongo ya M23, bapalangisamaki na lombango na misala miye bato bandimelaka.

Kigali elobi ezalaki nde biutmba kati na M23 na mangomba masusu ma basimba manduki maye mazali na ndingisa te kasi mayokanaka na FRADc mampinga ma Ekolo Congo démocratique.

Mpo na Kigali, kofunda yango kopesa maboko na lingomba M23 ezali sembo te mpe ekopekisa bolobeli ya ntina mpenza ya matata na monyele ya Ekolo Congo démocratique mpe bokengi na bikolo bzinga inzga lokola Rwanda.

XS
SM
MD
LG