Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 esengi kokutana na bakambi ya masolo ma kimya mpe epameli Kinshasa koboma


Mokambi ya batomboki ba M23 Bisimwa Bertrand na Bunagana, Rutushuru, Nord-Kivu, RDC, 2 aout 2013. (file)
Mokambi ya batomboki ba M23 Bisimwa Bertrand na Bunagana, Rutushuru, Nord-Kivu, RDC, 2 aout 2013. (file)

M23 elobi esengi kokutana na baye bazali kobondisa mpe kobamba masolo ma kimya na mbulamatari ya Kinshasa, na liyebisi litiami manzaka o’mokolomwa mitano na mokambi na yango Bertrand Bisimwa.

"M23 ezali kosenga bokutani na mobondisi mpe na mokambi ya masolo ma kimya na ntina ya kosololma na maye matali yango na liyebisi liye mpo na kozongisa kimya ekowumela na mboka na biso," ekomi Bertrand Bismwa na liyebisi VOA Lingala emonaki.

Masolo masalamaki kati na bakonzi ba Rwanda na baye ba RDC na Luanda, Angola, le 23 novembre 2022, mapesaki M23 kino lelo, mokolo mwa minei le 25 novembre 2022 na ngonga ya zomi na mwambe, mpo etika bitumba mpe ebanda kolongwa, soki te mampinga ma etuka makobenga yango na makasi.

Nzokande eloko moko te esalami kasi bitumba bingali nde makasi na bisika biike lokola pene na Bwiza, na 23 km ya nord ya Goma.

M23 ekundoli na liyebisi lya yango ete esi etiaki yango moko botelemisi bitumba wuto le 1er avril 2022, botelemisi bitumba boye bozali kokoka kasi mbulamatari nde ebandaka bitumba ntango inso.

Ekudonli lisusu ete le 20 avril na bokutani ya Entebbe na Uganda kati na yango na mbulamatari ya Kinshasa, ngambo ibale etiaki manzaka na mokanda mopesaki bango motindo ya koetelemisa bitumba, kasi motosama te na {liboke lya mbulamatari FARDC/FDLR/Nyatura/ACPLS/Codeco/Maï-Maï", efundi M23.

"Mbala esusu, M23 endimi botelemisi bitumba lokola bosengami na bakonzi ba bikolo, kasi esengi na mbulamatari ya Kinshasa kotosa na ngambo na yango mpe, soki te M23 ekozala na makoki mpenza ya kobunnda mpo na komibatela mpe kobetela bacivili bana mboka na bobebisi botelemisi bitumba," ebakisi M. Bisimwa.

Lingomba liye lya batomboki lilobi ete limoni liyebisi lya suka lya bokutani bwa Luanda ya le 23 novembre 2022 eleki mpe lipesilongonya na bakambi ba etuka mpo na makasi ma solo bazali kosala mpo na kimya na monyele ya Ekolo Congo démocratique.

Elobi makambo maye nsima na koloba na Twitter mokolo molandaki bokutani ya Luanda ete ezwi sango yango kaka na ba réseaux sociaux lokola bato banso.

XS
SM
MD
LG