Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 efundami kobama koleka bacivili 50 na Kishishe


Batomboki ba M23 bazali kolongwa Sake likolo na motuka moko pene na 42 na west ya Goma, Nord-Kivu, 30 novembre 2012. REUTERS/James Akena
Batomboki ba M23 bazali kolongwa Sake likolo na motuka moko pene na 42 na west ya Goma, Nord-Kivu, 30 novembre 2012. REUTERS/James Akena

Batomboki ba M23 bafundami koboma bacivili koleka 50 na Kishise, na 70 km na nord ya Goma, na Nord-Kivu, epayi bitumba bizongeli nsima na bopemisami mwa moke.

Mampinga ma RDC (FARDC) nde mafundi yango lokola mpe ba ntoma babikolo baike, Monusco (Misala mya ONU ya kobatela kimya na RDC), ba ONG ya molongo na bayi société civile.

Molebeli ya FARDC, général Sylvain Ekenge alobi, na liyebisi, ete batomboki babukaki botelemisi bitumba mpe “basasaki koleka bacivili 50 o’mokolo mibale moleki na Kishishe” epayi bazalaki kobunda na ba Maï Maï mpe baye bafundami kozala ba FDLR, batomboki ba Rwanda baye bakima mboka na bango epayi bafundama mpo na genocide ya 1994.

Gén. Ekenge abakisi ete bayi M23 babundisaki mpe FARDC o’mokolo mwa minei na Kalima.

Kolanda liyebisi lya gén. Ekenge, FARDC ezali kobatele mpenza na bokebi bonso mikano mizwamaki na bakambi ba bikolo bya EAC, likita lya bikolo bya Afrika ya Est, nay a CIRGL, Bokutani bwa molongo ya etuka ya bitima binene, mposo moleki na Luanda, na Angola.

Chargée d’affaires ya ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa, Stephanie Miley, oyo atangami na Reuters, andimi nsango yango mpe alobi ekela eye ekoki kozala mbeba ya bitumba M23 esali.

Human Rights Watch lokola mpe Monusco bandimi mpe nsango yango.

Mbulamatari ya RDC eboyi kovanda mesa moko na batombi ba M23 na masolo ma kimya mazali kosalama sika na Nairobi, kenya, na mangomba ma basimba minduki mpe ma batomboki baike ba mboka.

Kinshasa ezali kosenga botosami mpenza ya botelemisi bitumba mpe bolongwi ya batomboki na bisika babotola yambo na masolo manso. Lokola esngamaki.

Bayi M23 bawangani mpe bakebisi na lokuta.

XS
SM
MD
LG