Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Museveni asakoli ete mpepo ya mampinga ma Uganda ebebisi camp enene ya ba ADF


Mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (G) apesani mbote na mokonzi ya Uganda Yoweri Museveni na Entebbe, Uganda, 9 novembre 2019. (Photo by
Mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi (G) apesani mbote na mokonzi ya Uganda Yoweri Museveni na Entebbe, Uganda, 9 novembre 2019. (Photo by

Mokonzi ya Uganda, Yoweri Museveni asakoli na Twitter ete mampinga ma Uganda mapanzi camp enene ya batomboki ba Uganda ADF na monyele ya Ekolo Congo démocratique na nzela ya mpepo na yango.

"Monguna, na bopalangani, akimi sika koleka ndelo ya bisika misala mya biso misengeli kosalama. Badongolomeso baye bazangi koyeba, bayebi te ete kaka na ba minutes moke -na bangonga te- tokoki kokoma na moto ya koboma, bisika mingi, mpe koleka ndelo ya bisika tozalaki kosala mosala," ekomi na Twitter mokonsi ya Uganda mpe mokonzi ya mampinga ma ekolo na ye.

ADF esalaka bitumba mingi na territoire ya Beni, na Nord-Kivu mpe ya Irumu, na Ituri, epayi abomaka mpe amemaka bato mingi na kolukaka mpe kotia bokonzi ya bo musulmane na esika yango.

M. Museveni atie mpe bililingi bizali kolakisa misala mpepo na mampinga ma ye masali.

Alobi mosala mwango mosalamaki na ndingisa ya bakonzi ba RDC.

Mampinga ma Uganda na maye ma RDC mazali wuto koleka mobu moko kobundisa ADF, lingomba liwuta na Uganda, likota na Lingomba Etat islamique (DAESH) mpe likoma na bato babikolo ndenge na ndenge sika.

", na mokolo mwa mitano, bazwaki mbano basengeli. Kasi bakeyi, biso tokokoma bisika bazali ndenge mbulamatari ya DR Congo ezali kopesa biso ndingisa ya kosala na bango elongo. Longonya na UPDF (mampinga ma Uganda) mpe longonya na mbulamatari ya RDC mpe na mampinga ma Congo," ebakisi M. Museveni,

Nzoka nde, mikolo mileki, molebeli ya mbulamatari ya RDC, Patrick Muyaya, ayanolaki na bapanzi sango ete Kinshasa ezali koluka koyeba soki Uganda epesaki mpe maboko na M23 lokola baike bafundaki yango.

XS
SM
MD
LG