Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asengi bana mboka kotelema, alobi alingi masolo kasi bitumba bikoki mpe kosalama


Président Félix Tshisekedi ya RDC, na photo ya loboko ya mwasi, na président PAul Kagame ya Rwanda (D).
Président Félix Tshisekedi ya RDC, na photo ya loboko ya mwasi, na président PAul Kagame ya Rwanda (D).

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique (RDC) Félix Tshisekedi, na lisikulu asalaki mokolo mwa minei na mpokwa na etando eke ya l’Etat (RTNC), abengi bana mboka banso kolamuka na bitumba biye, alobi, Rwanda ezali kosala na mboka na ye na nsima ya M23,.

M. Tshisekedi alobi atie, kino sika, liboso masolo kati na bikolo kasi makanisi ma kosala bitumba malongalami te.

Mbano moko te ya kimya eye bana ba RDC bazali kozela emonani na masolo manso masalami kino sika na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame, elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC akundoli ete atalisaki bolongi bwa ye ya kozala na kimya na bikolo binso libwa nzinga nzinga na mboka na ye wuto azwaki bokonzi na 2019.

Atangi bokutaki bonso na Paul Kagame boye bosengaki botelemisi bitumba mpe bolongalami bwa M23 na bisika binso ebotala.

Likita lya CEA na Nairobi, ya CIRGL na Luanda mpe bokutani bobongisamaki na président Emmanuel Macron ya France na Assemblée générale ya ONU na New York, manso mamemi kimya te.

M. Tshisekedi asengi bongo na bana mboka kotelema; na bilenge komikotisa na mampinga, mpe na bayi politiki kotika bokabwani ya politiki.

Akebisi na maloba ma boyini mpe monyokoli na baye balobaka kinyarwanda.

Akebisi mpe baye bakoteka mboka mpo bakopesama etumbu ekasi ya mobeko.

M23, lingomba likelama na baike balobaka kinyrwanda, ezongeli bitumba mpe ebotoli mboka nzike wuto koleka mposo moko.

Kinshasa ezali kofunda Rwanda kopesa yango maboko.

Kigali ewangani mpe esengi RDC kotika kosunga ba FLDR, batomboki bawuta Rwanda.

XS
SM
MD
LG