Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Botamboli bozongeli na nzela Goma-Rutshuru nsima na bokangemi mpo na bitumba FARDC-M23


Soda moko ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique likolo ya likalo na nzela ya Rutshuru, epayi bitumba na M23 bingalaki, pene na Goma, Congo, November 19, 2012.
Soda moko ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique likolo ya likalo na nzela ya Rutshuru, epayi bitumba na M23 bingalaki, pene na Goma, Congo, November 19, 2012.

Botamboli bobandi kozongela na nzela ya Goma-Rutshuru eye ekangamaki mwa ntango mpo na bitumbu makasi kati na mampinga ma Ekolo Congo démocratique na batomboki ba M23, na Rutshuru, na etuka ya Nord-Kivu.

Bitumba bizali na bisika mingi lokola Busanza, groupement eye zali na mboka zomi na mitano na kati na yango.

Bakonzi ba bisiki biye balobi ete bato mingi bakimi bisika bavandaka mpe batondisi biteyelo na territoire ya Nyiragongo kasi bazangi lisungi.

Mingi bazali kolala libanda. Nzonkande mwa kimya ezali lelo na mboka lokola Kalengera, Kako mpe Rubare pene na nzela enene to Route nationale numero 2.

Bavandi baye bakimi lokola mpe bayi société civile batatoli ete FARDC ebengani M23 na ngomba ya Kako mpe Kalengera. Kasi M23 elobi ezwi mboka nzike.

XS
SM
MD
LG