Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 ebotoli Kiwanja na Rutshuru-Centre, Monusco ematisi mbela ya bokengi


Basoda mpe bayi pulusu ba Ekolo Congo démocratique pene na Kiwanja, Rutshuru, na Nord-Kiuv, 3 avril 2022.
Basoda mpe bayi pulusu ba Ekolo Congo démocratique pene na Kiwanja, Rutshuru, na Nord-Kiuv, 3 avril 2022.

M23 esakoli ete ebotoli Kiwandja mpe Rutshuru-centre na bitumba na FARDC na Nord-Kivu.

Sango yango endimami na Bakeli mibeko ba Ekolo Congo démocratique, bavandi na societe civile.

Rusthuru-centre ezali na pene na 70 km na Goma, engumba mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu.

Monusco, misala mya ONU mpo na koyikisa kimya na Ekolo Congo démocratique ematisi mbela ya bokengeki ya basoda ba yango mpo na kopesa maboko na mamapinga ma Ekolo Congo démocratique na bitumba na M23.

Bakambi ba FARDC, mampinga ma Ekolo Congo démocratique balobi nanu eloko te kino sika.

Monusco epameli mbano ya bitumba biye likolo na bavandi ya Rutsuru.

M23 emonani mpe na Rugari na pene na 30 km ya Goma mpe na nzela enene to route nationale 2.

XS
SM
MD
LG