Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington esengi Rwanda kotika kopesa M23 maboko mpe Moscou elingi masolo


Basoda ba Ekolo Congo démocratique (FARDC) bakomi na makalo to mituka mya bitumba ma bango na Kibumba pene na ndelo na Rwanda, Nord-Kivu, 11 juin 2014.
Basoda ba Ekolo Congo démocratique (FARDC) bakomi na makalo to mituka mya bitumba ma bango na Kibumba pene na ndelo na Rwanda, Nord-Kivu, 11 juin 2014.

Molakisi ya elongi ya Etats-Unis, ntoma Robert Wood, asengi na mangomba ya basimba minduki mpe batomboki, mingi mingi M23, kotika bitumba, mpe bayi mbulamatari kotika kopesa babundi baye maboko, mpe atangi mampinga ma Rwanda FPR kosalaka yango.

Ezalaki mokolo mwa misato na likita lya Conseil ya sécurité ya ONU etalaki matata na RDC.

Na ngambo na ye, molakisi elongi ya Russie akebisi ete bozongi ya makambo bo’ momesano na monyele ya Ekolo Congo démocratique bokoka kosalama te kaka na nzela ya mampinga.

Molobeli ya Moscou asengi ete masolo masalama mpe mikano makasi mizwama mpo na kozongisa bondimami kati na ngambo inso.

Ntoma ya Moscou alaki ete ekolo na ye ekopesa maboko na masolo makoki kosalama mpe apesi longonya na misala mya Nairobi na Luanda.

Mpo na Moscou, makambo mazali koleka na monyele ya Ekolo Congo démocratique mazali na mbano na etuka inso ya Afrika ya bitima minene to ya Grands lacs. Bitumba na M23 bipesi nzela na mangomba misusu ya basimba minduki kokomisa makasi bikela bya bango ya mabe, ekebisaki Moscou.

Na ngambo na yango, molakisi ya elongi ya Etats-Unis, ntoma Robert Wood, asengi na mangomba ya basimba minduki mpe batomboki, mingi mingi M23, kotika bitumba, mpe bayi mbulamatari kotika kopesa babundi baye maboko, mpe atangi mampinga ma Rwanda FPR kosalaka yango.

Molakisi elongi ya Amerika akundoli ete na mobu moko babundi baye, Codeco na M23 basi babomi koleka bacivili nkoto mibale. Abeti seke ete bacivili bazali komona mpasi mingi mpo na bozangi bokengi na monyele ya Ekolo Congo démocratique. Washington elobi na likita lyango ete Monusco ezali nanu na mosala ya kosala mpo na komema kimya na RDC mpe Etats-Unis ekopesa yango maboko.

Molakisi ya elongi ya ONU na Ekolo Congo démocratique mpe mokambi ya ONU asengaki bongo molongo kotala likambo lya RDC. Rwanda na RDC bafundamaki bo’ momesano kopesa maboko na FDLR mpe M23.

XS
SM
MD
LG