Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda epameli RDC kotambola likolo lya misala mya Luanda na Nairobi na kobundisa M23


kagame-rwanda
kagame-rwanda

Mbulamatari ya Rwanda epameli bakonzi ba Ekolo congo démocratique (RDC) bozongeli bitumba na M23 na kobuka maye bakonzi ba bikolo bayokanaki na Luanda mpe Nairobi,

"Bikela bya FARDC (Mampinga ma RDC) mpo na kobandela bitumba na M23, moko na mangomba ma basimba minduki ya Congo, bisalami na kotambola likolo na misala mya bokengi na etuka eye miye mindimamaki, kati na yango misala mya Nairobi na Luanda," elobi liyebisi molobeli ya mbulamatari ya Rwanda, Yolande Makolo, abimisi na compte Twitter na ye.

Liyebisi lyango libakisi ete "botindami ya polele ya koyina bayi kabila nzike, bosaleli ya minduki ya makasi miye mibetami pene na ndelo na Rwanda, mpe mpamela ezanga loboko esalami likolo na Rwanda ekoki kondimama te".

Kigali elobi polele ete masokoli mpe misala mya mikolo miye milakisi ete mbulamatari ya RDC ekani solo kokoba kobakisa bitumba, na bokeseni na bilaka bya mokonzi ya RDC ete akotalela nde masolo to diplomatie.

Na ngambo na yango, Kigali elaki ete, ata matamumoli ma RDC, mbulamatari ya Rwanda elingi kosala mpo na kimya ekowumela na etuka eye.

Bitumba bizongeli kati na M23 na FARDC, mampinga ma RDC, na Rutshuru, nzinga nzinga na Ntamungenga mpe Rangira, na territoire ya Rutshuru pene na ndelo na Rwanda, wuto mokolo mwa minei ya mposo moleki.

Bakonzi ba RDC bazali kokoba kofunda Rwanda kozala nsima na M23.

Rwanda ezali kokoba kofunda RDC kobundisa M23 na lisungi lya batomboki ba FDLR (Forces démocratiques pour la libération du Congo) baye bafundama na bobomi bonene ya Rwanda na 1994.

XS
SM
MD
LG