Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 efundi FARDC na mbeba ya bitumba na mokambi ya ONU ya makoki ma bomoto


Basoda ba FARDC mampinga ma Ekolo Congo démocratique na bitumba na batomboki ba M23 na Kibati, pene na Goma , 30 aout 2013.
Basoda ba FARDC mampinga ma Ekolo Congo démocratique na bitumba na batomboki ba M23 na Kibati, pene na Goma , 30 aout 2013.

M23, lingomba lya batomboki libotola Bunagana (Rutshuru/Nord-Kviu) esengi na Haut-Commissaire ya ONU mpo na makoki ma bomoto, Volker Turk, kofungola bolukiluki na mbeba efundi mampinga ma Ekolo Congo démocratique (🇨🇩 FARDC) kosala na bitumba bingali wuto mokolo mwa minei moleki na Rutushuru.

Lingomba liye lya batomboki litendeli mokambi ya ONU mokanda mpo na yango.

M23 ebandeli koloba ete mampinga ma Ekolo Congo démocratique mazali kobundisa yango na lisungi lya FDLR na mangambo masusu ya basimba minduki.

Mpo na batombaki ba M23, FARDC ezali kozwa bacivili lokola ngumba mpo na kobombama nsima na bango.

M23 ekomi na mokanda mwango ete FARDC etiaka bibundeli makasi na bisika lokola biteyelo, mapitalo, ndako ya nzambe mpe bisika bato bavnaka. Efundi FARDC mpo na liwa lya bacivili.

XS
SM
MD
LG