Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Madeleine Albright akufi na mibu 84


Secrétaire d'état ya Etats-Unis Madeleine Albright (G) na président Laurent-Désiré Kabila ya Ekolo Congo démocratique na Palais ya Nation, Kinshasa, 12 décembre 1997
Secrétaire d'état ya Etats-Unis Madeleine Albright (G) na président Laurent-Désiré Kabila ya Ekolo Congo démocratique na Palais ya Nation, Kinshasa, 12 décembre 1997

Madeleine Albright, secrétaire d’Etat ya kala ya Etats-Unis mpe moko na basi ya mpifo ya makasi na Amerika akufi na mibu ntuku mwambe na minei.

Libota lya lisakoli ete azalaki na bokono bwa cancer.

Azalaki mobundi monene ya makoki mabomoto. Bayi mboka Ekolo Congo démocratique bakokanisa ye mpo matata na président Laurent-Désiré Kabila ntango mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique alobaki ete akatelaki telephone na bitumba na batomboki ba RCD, Rassemblement congolais pour la démocratie.

Madeleine Albright azalaki koloba ete ba tutsi bazali mbuma ya miso na ye.

XS
SM
MD
LG