Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu asengi na Union africaine ba elections misusu na sanza motoba


Opposant Martin Fayulu na conférence de presse, na Kinshasa, le 18 janvier 2019.
Opposant Martin Fayulu na conférence de presse, na Kinshasa, le 18 janvier 2019.

Martin Fayulu atindaki mokanda na bakonzi ya bikolo ya Afrika baye basangani na 32e session ya UA na Addis-Abeba, n’Ethiopie

Asengi bango kosala maponami misusu na mboka RDC na nsima ya sanza motaba.

Martin Fayulu azali kokoba kotelemela ba résultats maye Cour constitutionnelle endima, maye maskolaki Félix Tshisekedi mokonzi ya mitano ya RDC ma 38,57% na ba maponami ya le 30 décembre.

M. Fayulu akomi ete ba rapports ya ba mission d’observation mpe banzeneke (témoins) ya lingomba Lamuka malakisi ete ye alongaki na koleka 60%.

Nzonde Félix Tshisekedi, oyo akomi mokonzi ya RDC, ye azalaki kuna na 32e session ya UA mpe baninga baye bamoponi lokola 2e vice-président ya Union africaine.

XS
SM
MD
LG