"Eco" nde ekomi mbongo ya Afrique de l’Ouest na esika ya "CFA"

Bakambi ya CEDEAO (Communauté économique des états de l'Afrique de l'Ouest) na 56e Sommet etali bobandi ya mosolo Eco na Abuja, Nigeria, 21 decembre 2019. (WhatsApp/Presidence ya Côte d’Ivoiree)

Président Alassane Ouattara ya Côte d’Ivoire na mokokani waye ya France Emmanuel Macron bazalaki na milulu ya bosakoli bobandi ya Eco mosolo moye mokozwa esika ya CFA na 2020.

"Eco" mosolo ya Afrique de l’Ouest ebandi, elobaki na milulu myango M. Ouattara.

Mokonzi ya France, M. Macron andimi mpe yango. Apesi longonya mpo na yango.

"Page ya sika ebandi nsima na colonialisme oyo ezalaki mbeba ya ekolo (France)," eyebisi M. Macron.

Mosolo mwango mokelami na boyokani kati na mboka mwambe ya Afrika : Bénin, Burkina Faso, Côte d’Ivoire, Guinée-Bissau, Mali, Niger, Sénégal na Togo mpe na France.

Franc CFA ("franc des colonies françaises d'Afrique") ebandaki na 1945. Ekomaki "franc de la Communauté financière africaine" nsima na lipanda na mobu 1960.

Bakambi ya CEDEAO (Communauté économique des états de l'Afrique de l'Ouest) bakutanaki kaka samedi moko oyo mpo na milulu ya bobandi ya Eco na yango na Abuja, Nigeria.

Ezalaki kotalama lokola "vestige ya Françafrique", endimi Emmanuel Macron na lisikulu na ye.

M. Macron alobi Paris esengeli ebanda kotonga boyokani bwa sika na Afika boye bokozala passionnée mpe décomplexée".