Bondogwani ya matata kati na Trump na Biden

Président Donald Trump na vice-président Joe Biden bazali kondongwana na linaka lya television na Cleveland, Ohio. 29 septembre 2020

Président Donald Trump, républicain, na vice-president ya kala Joe Biden, democrate, bandongwanaki mbala ya yambo na linaka lya television yambo na maponami ma mokonzi ya mboka ya 2020, na université ya Cleavland, na Ohio.

Bondongwani bwango bozalaki matata mingi mpe ba candidat babale bazalaki komikata maloba mingi.

Bondongwani bwango botalamaki na ba millions ya bato.

Ba candidat babale bazongeli campagne na bango. Bakozala na bondongwani mosusu mikolo likoya yambo na maponami ma le 3 novembre.