Babundi ba CODECO bakotaki na Bunia

Your browser doesn’t support HTML5

Babundi ba lingomba CODECO bakotaki na enbumba Bunia, na Ituri, na bibundeli ya makasi. Kasi bakonzi bayebaki komema bango na kimya nyonso o’libanda lya engumba eye. Toyoka sango na Erikas Mwisi.
Mokambi ya etuka ya Ituri, Jean Bamasi oyo azali na Kinshasa mpo na etinda, alobi ete bazalaki kosenga botikami bwa boko na baninga ba bango bakangemaki. Boko na ba CODECO batikaki minduki mpe basusu bazali na nzela ya kosala lolenge moko kasi bazali kosenga bokengi.