Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na masolo na Aleksandar Vučic na Belgrade (Serbie)


Président Félix Tshisekedi na mokokani wa ye ya Serbie Aleksandar Vučic na masolo na Belgrade, 25 octobre 2019. (RDC Présidence)
Président Félix Tshisekedi na mokokani wa ye ya Serbie Aleksandar Vučic na masolo na Belgrade, 25 octobre 2019. (RDC Présidence)

Président Félix Tshisekedi azali na Belgrade, na Serbie, uto ntongo ya vendredi na kowuta na ye Sotchi na sommet Russie-Afrique

Akutani na engumba mokonzi ya Serbie na mokokani wa ye ya ekolo eye Aleksandar Vučic mpe basali masolo elongo na basungi na bango mpe mbulamatari ya bikolo bibale biye.

Aleksandar Vučic alobi ete RDC ezali moninga na ya Serbie mpe ekoki kotiya motema na lisungi na yango.

Serbie ekani kotinda o’mikolo mikoya ministre na yango ya milona na Kinshasa. Bakonzi babale basololi mpe mpo etali bokolongono mpe ya bayekoli na ekolo Congo démocratique na Serbie.

Félix Tshisekedi awutaki na Sotchi na bokutani Russie-Afrique ya mikolo mibale na Russia.

Na masolo ya pepembeni, M. Tshisekedi akutanaki na Sotchi na Vladimir Poutine, président ya Russie.

M. Tshisekedi asengaki na lisikulu na ye, lisungi ya Russie mpo mosala ya koloba mbisi na lac Tanganyika mpe mpo na misala misusu.

Boyokani nzike bosalami kati na RDC na Russie. Moko na yango ekopesa nzela na Compagnie ya Russie nzela ya engunduka kotonga nzela ya engunduka to chemin de fer na RDC.

Ezali mobembo ya yambo uto Serbie ebima na bopanzani ya Yougoslavie.

XS
SM
MD
LG