Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi apekisi ba gardes du corps ya ba policiers, soda mpe garde présidentielle


Président Félix Tshisekedi na bokutani ya Conseil supérieur ya défense na Lubumbashi, RDC, le 13 avril 2019. (Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani ya Conseil supérieur ya défense na Lubumbashi, RDC, le 13 avril 2019. (Présidence RDC)

Conseil supérieur ya défense ebotoli détachements nyonso ya ba policiers, ba soda mpe ya garde présidentielle baye basalaka bokengi mpe babatelake ba societe miniere, kolanda liyebisi na nsima ya bokutani bokambamaki na président Félix Tshisekedi o’mokolo ya mposo na Lubumbashi.

Mokano moye motali etando mobimba ya RDC, kolanda ministre ya Fonction publique Michel Bongongo.

Conseil supérieur ya défense emoni ete situation ya makambo ya bokengi ezali grave na engumba mokonzi.

Bakonzi bapekisi na bato kozala na ba gardes ya ba policiers, ba soda mpe ya garde présidentielle lokola garde du corps, elobi na video moko, Abraham Luakambuanga, mokambi ya service ya presse ya présidence ya république.

Lifuta ya ba policiers mpe ya ba garde républicain ematisami, ebakisi M. Luakambuanga.

Bakonzi bapesi mpe mitindo ete mitungisi ya douane masila na poste frontalier ya Kasumbalesa. Esengeli code tarifaire ekita mpe ba recettes ya l’Etat bimata, ebakisi liziba ya maloba maye.

Mokonzi Tshisekedi akomaki na Lubumbashi o’mokolo ya mitanu mpe kotala mpo bokengi nsima ya mobulu ya koboma, koyiba mpe kozuwa basi mpe bilenge na makasi mafundami na engumba liye.

M. Tshiskedi alongwaki Lubumbashi mpe akomaki na Goma o'mokolo ya mposo.

XS
SM
MD
LG