Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alobi boyokani na Kabila ezali mpo na kosala gouvernement


Président Félix Tshisekedi na bokomi na ye na Widhoek, Namibie, le 26 février 2019. (Facebook/Fatshi News)
Président Félix Tshisekedi na bokomi na ye na Widhoek, Namibie, le 26 février 2019. (Facebook/Fatshi News)

Mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi, andimi ete boyokani mozali na président Joseph Kabila kasi mpo na kosala gouvernement. Alobi yango na koyanolaka motuna ya mpoanzi sango moko na mobembo na ye na Windhoek, na Namibie.

"Ezali boyokani oyo tosalaki yambo mpeza mpo na alternance (mbongwana ya bokonzi) esalama na kimya. Boyokani yango esalamaki mpe na kimya mpo ete nsima ya maponami ya ba législatives mpe majorité oyo ebimaki kuna tozala na coalition (boyokani) na ngambo ya M. Kabila, ngambo oyo ebimi na bokonzi," eyanoli M. Tshiskedi.

Elongo na mokonzi ya Namibie, Hage Geingob, oyo ayambaki ye, basolaki na bapanzi sango na Windhoek, engumba mokonzi ya Namibie.

M. Tshisekedi alimbolaki lisusu ete etikali bayokana na ngambo ya Kabila mpo na kosala gouvernement. Kasi yambo, esengeli basala programme (linaka) ya bomoko mpo na gouvernement.

"Ngayi na koloba na bango totiya code de conduite (nzela ya kolanda) mpo na ndenge nini tokotambola na mosala tokosala mpo na bolamu ya bana ya Congo," elobaki M. Tshiskedi.

Mokonzi ya mboka ya RDC ayebisaki mpe ete akombudisi kaniaka kino akosilisa yango.

Ngomba na ye, mokonzi ya Namibie alobi koyokana ezali mabe te na démocratie.

Mpo na M. Geingob, esengeli bakonzi ya kala bavanda na mboka na bango.

XS
SM
MD
LG